Maponomi ya bayangeli bituka: Célestin Sakanga pe Célestin Bakamana pona Kasaï central

« Mingi soki bilenge bafongoli monoko te pona koloba eza po ete maye mazali mazo salema lolenge bango bazali ko zela te, kasi mbongwana ekoya te soki tosali eloko te », wana maloba ya Célestin Bakamana ko yanolaka na mituna ya ba panzi sango na biso mokolo moa mercredi 22/02. 

Sarah Meta Savu

24 2024 - 15:36
 0
Maponomi ya bayangeli bituka: Célestin Sakanga pe Célestin Bakamana pona Kasaï central

Bakamana elongo na mokambi moa ye bazali na likanisi yako bongisa makambu na lolenge ete bilenge bazala na makoki yako tia maboko pona misala kasi pe yako kembisa boyebi boa bango. 

« To lingi ko yanola na ba kokoso nionso ya bilenge kasi kotia ba mpaka mopanzi pe kosala na bilenge binso pona ba kokoso bazali na yango kasi pe pona manaka bazali ko linga ko kolisa », boye nde elimboli moweleli ebonga ya moyangeli molandi na etuka Kasaï central.

Pona mbala ya liboso bilenge mibale ya mibu na se ya tuku mineyi (40ans) ba sangani pe bayokani pona ko kamba etuka ya Kasaï central. Pona bilenge mibale: tolingi etuka ekambama na bilenge elongo na bakolo, lisusu pona ko bimisa etuka na libulu molayi esika ezindi ekomi tango yako bongola makambu elongo na bilenge pamba te bakolo bakambaki etuka nako zangaka linaka. 


Pona ko longa mambi mayike ezali yako sala na oyo etali mayi, lotiliki, biteyelo, bokolongono boa nzoto pe ba nzela, nzambi nzela ya kalamba mbuji ekoki ko sangisa grand Kasaï mobimba pe ko longwa etuka kino bikolo bisusu. To kanisi ete soki bilenge bazui bokambi eko zala libaku yako bengisa ba partenaires ya bikolo bisusu pona ko tonga biloko ya malamu na tina yako biso na bobola " Célestin Bakamana. 

Manaka maye mako sala ete bayi mboka na etuka ena ba bosana eleMoweleli ebonga numéro 63 pona maponami ya balobeli ya bayi mboka mua 20 décembre na territoire ya Demba alobi ete manso maye mazali pona kotelemela bakolo te kasi liteya basengeli kozua na bilenge.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa