Mayi ya mbula na kisasa : baweyi 6, bato 40.000 basimbami na likama liango

Sarah Meta Savu

14 sanza ya yambo 2024 - 10:59
 0
Mayi ya mbula na kisasa : baweyi 6, bato 40.000 basimbami na likama liango

Na nionso esali motango koto tuku mineyi kama sambo na zomi (40.710) nde ba kutami na kokoso o'tina ya likambo liango na ba komine mitano na engumba mokonzi ezali bongo Limete, Mont-ngafula, Barumbu pe Masina, wana kolandisama lapolo ya eklezia katoliko. 

Na komine ya Barumbu ba balabala misusu ekomi ba bibale pe ba bwato ezali kosala mosala kuna esika pe bazali kofuta 500fc na moto moko pona ko katisa.

Na komine mususu lokola na Ngaliema mayi emati na molayi ya ba mètres zomi (10 ) pe esimbi na ba ndako ya etage. Makambu ya lolenge moko mozali kosalema na engumba Brazzaville.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa