Likambo litali liwa ya Cherubim Okende: lisanga politiki ensemble pour la république balobi ete liloba lia suka ya bosembo ezali solo te

Lisanga politiki ensemble pour la république, lizali kotelemela maloba ma suka ya bosembo na oyo etali liwa ya Cherubim Okende, lapolo la suka oyo ebimaki polele mokolo moa jeudi 27/02 na monoko moa procureur général ya ndako ya bosambisi ya cour de cassation o'kati ya liyebisi lioko vendredi 01/03. 

Sarah Meta Savu

2 Lisungi pona macini 2024 - 10:28
 0
Likambo litali liwa ya Cherubim Okende: lisanga politiki ensemble pour la république balobi ete liloba lia suka ya bosembo ezali solo te

Lisanga lia bayi opposition balobi ete lapolo lona ezali « ko ndimisa te pe ezali mosika na bosolo ya makambo ». Lisanga lia Moïse katumbi ba bombi maloba te pona oyo azo benga bozangi boyebi na mosala, kanyaka pe misala misusu yako mema mabe na bosembo ya Congo demokratiki. 

" Ensemble pour la république alobi ete ko boya ko bimisa na polele lapolo eteli autopsie ezo sala ete libota lia moweyi ba kanisa été bazali ko bombela bango makambu masusu. 

Manso maye mazali kolandisama na bokutani ya procureur général ya ndako ya bosambisi ya cour de cassation elongo na ba panzi sango mokolo moa jeudi 29/02, bisika atatolaki ete Cherubim Okende amipesaki liwa ye meyi pe akendaki ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle te mokolo moango. 

Esengeli koyeba, molobeli ya bayi mboka Cherubim Okende okutamaki yako kufa na motuka moa ye moa 13/07/2023 na engumba kisasa. Misala ya autopsie misalemaki na lisanga lia minga ya bikolo Belgique, Afrique du Sud pe bayi monusco liboso ya baye ya libota lia moweyi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa