Lisambisi ya ba kidnapper:" lisambisi oyo ezuaki bokebi ya bato banso ememi pole te na oyo etali lisanga lia bato ya mabe sima ya mombongo ya biloko ya kati ya bato" Filimbi

Suka ya lisambisi ya ba kidnapper etiki mituna mingi ezanga biyano. Pona lisanga Filimbi, ndako ya bosambisi ya grande instance ya Kinshasa Gombe epesi pole te na oyo etali mombongo ya biloko ya Kati ya batu lisusu pole etiami te pona ko yeba nini etindiki bango ko sala yango pe bakangi te batu nionso na sima ya likambo liango.

Sarah Meta Savu

7 Sanza Sambo 2023 - 16:17
 0
Lisambisi ya ba kidnapper:" lisambisi oyo ezuaki bokebi ya bato banso ememi pole te na oyo etali lisanga lia bato ya mabe sima ya mombongo ya biloko ya kati ya bato" Filimbi

Filimbi (kelelo na swahili)  na motema pasi ba moni bilembo ya kaniaka pe mosala malamu te na bosembo ya RDC, basengi ete etumbu ya bakangami elembosama te kotalaka oyo basali.

Ndako ya bosambisi ya grande instance ya Kinshasa Gombe ekataki likambo liango butu ya jeudi pona leka vendredi ya moa sambo ya sanza Sambo ba fundami tuku mibale na motoba bazui etumbu ya liwa pona moyibi na mandoki na maboko, lisanga lia batu mabe, pe ko boma.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa