Jean pierre Bemba : « embouteillages eza kaka na RDC te »

Na rado top Congo, mokambi mbulamatari molandi na mambi matali transport na RDC, atalisi na bayi mboka mokano moa mbulamatari yako silisa ba embouteillages na ba nzela ya engumba kisasa. 

Sarah Meta Savu

5 Sanza zomi na mibale 2024 - 16:15
5 Sanza zomi na mibale 2024 - 19:00
 0
Jean pierre Bemba : « embouteillages eza kaka na RDC te »

Na bililingi, Jean pierre Bemba atalisi ete bingumba biyike na molongo ezali kokutana na kokoso etali embouteillages. VPM atali mambi ya transport atangi bingumba lokola Paris ( France), Abidjan ( cote d'ivoire), Pékin (Chine) na bilembo ezali kotalisa bosolo ya maye alobi. 

" Bato bazali ko banza ete embouteillages eza kaka na RDC. Balingi kolamba bilenge pe ko kosa bango ete eza kaka na RDC.

Pona kosilisa yango Jean pierre Bemba alobi kotambola kolandisama miboko mineyi oyo ezali, mosala ya pulusu, biloko ya misala, ba nzela pe botosi mibeko ya nzela. 

VPM alakisi mosapi mingi na bizaleli ya bakumbi mituka oyo eza moko ya maye mazali kokela ba embouteillages. 

Embouteillages ekomi makasi na kisasa. Kozanga banzela, bozangi ba minda yakotia molongo na nzela kasi pe bozangi botosi mibeko ya pulusu nde ezali kokela ba embouteillages.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa