RDC: bana ya basi na kelasi ya se bako koba tanga ata mokumba
Minisele etali mateya ekembisi nkatela yako pesa nzela ya mayekoli na bana banso, na boye nde mokano mozuami yako tika kotanga bana ya basi oyo bazui mokumba yambo yakozua EXETAT. Mokano moango motalisami na lioko mokanda na mokoloto ya kalaka mokambi ya minisele ena, Alexis Yoka Laluinangu.
Kolandisama mibeko ya mboka pe ya molongo ba oyo etali makoki pona bato, koboyela muana kelasi po azui mokumba ezali kotambola kolongobana mibeko miye te pe ezali kokembisa bizaleli ya mabe, Lolenge ekomami na mokanda moango.
" Biteyelo binso esengeli etika bana nionso ya basi oyo bazui mokumba ko koba na mayekoli lolenge moko na basu, kobenga to biloko bisusu te ekoki kosengama. "
Minisele elongo na ba ba ndako ya misala mitali mayekoli pe ba kambi biteyelo bazali na mokumba yako panza sango ya makomi o'kati ya mokanda moye pe kotia liso na botosi na yango pona batela makoki ya makoli ya bana basi banso ata ba oyo ba kutani na libaku ya bota yambo ya tango.
Mokano moango mokeli nungu nungu. Basusu bazali komona na kati na yango "likambo ekoki pesa nzela na kindumba na bana bake pe komatisa motango ya bana basi ya mikie ba bota "
