Martin Fayulu na France 24: tango mosusu aza naye moyambi na ndembo Kasi tata mokonzi te 

Na etando Ike ya France 24 mokolo ya mardi 03/12 Martin Fayulu alobi mabe pona tata mokonzi Félix Tshisekedi uto azua bokonzi na ekolo Congo demokratiki na mobu 2019. 

Sarah Meta Savu

5 Sanza zomi na mibale 2024 - 06:53
5 Sanza zomi na mibale 2024 - 06:53
 0
Martin Fayulu na France 24: tango mosusu aza naye moyambi na ndembo Kasi tata mokonzi te 

Atalisi lokala " tina te" souhaite bozalisi ya tata mokonzi na lobala ya Martyrs, na masano ya ndembo pona kimia ya RDC, ye alobi te Félix Tshisekedi abongisama pona bokonzi te. 

" Na tango biteni koleka 100 eza na maboko ya banguna ye akeyi ko beta ndembo. Bayi mboka ba sosoli eza buzoba. Nzela naye ezalaki tango mosusu kozala moyambi na ndembo Kasi tata mokonzi ya ekolo te"

Na oyo etali mbongwana ya buku likonzi, motelemeli bokonzi azali kokanisa ete wana ezali ko teka ekolo. 

" Mokapo 64, eteni ya mibale eza polele: mimekano nionso yako simba buku likonzi ezali Mbeba ya matuya makasi pona ekolo pe bayi mboka... Bayi mboka bako mitika te" nde abakisaki. 

Makelele na oyo etali mbongwana ya buku likonzi eza se ko kola. Tata mokonzi atalisi lioko lisanga ekotiama na mobu 2025 pona kotala nini esengeli ko bongola na buku likonzi to pe esengeli ko bongola yango mobimba.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa