Kisasa : Tshisekedi afongoli misala ya botongi eteyelo ya misala ya maboko "Musala"

Tata mokonzi, Felix Tshisekedi Tshilombo, afongoli misala mia botongi eteyelo ya misala ya maboko na kombo " musala" mokolo  moa jeudi tuku mibale ya sanza sambo mobu koto ibale tuku ibale na isato na kisasa.

Sarah Meta Savu

20 Sanza Sambo 2023 - 20:42
 0
Kisasa : Tshisekedi afongoli misala ya botongi eteyelo ya misala ya maboko "Musala"

Ezalaki o'liboso ya bakonzi ebele ndakisa mokambi mbulamatari, misele ya misala ya maboko pe motalisi elongi ya ekolo Belgique na Congo demokratiki nde tata mokonzi atiaki libanga ya liboso pona bobandi ya misala miango na mombele.

Botongi ya eteyelo eye ezo kota na linaka "kin Emploi" ,ya tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi pona misala na bilenge.

Misala miango mizali kosalema na lisungi ya misolo ya ekolo Belgique.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa