Moanga moa mayekoli ya misala ya maboko: Marc Ekila akumisi bikuke ya misala pona bilenge 

Liboso ya ba panzi sango mokolo moa misato 23/10, minisele atali mambi ma mayekoli ya misala ya maboko, akumisi bikuke ya misala miye mifongwami pona na bilenge na libaku lia milulu mia misala ya maboko oyo ezali kosalema na kisasa uto mua 24/10. 

Sarah Meta Savu

24 Sanza ya zomi 2024 - 09:49
24 Sanza ya zomi 2024 - 09:50
 0
Moanga moa mayekoli ya misala ya maboko: Marc Ekila akumisi bikuke ya misala pona bilenge 

Pona minisele Ekila Molulu moye, mozali pona kolongola na makanisi ma bato bazali komona mosala ya maboko lokola pamba. 

" Bokeseni ya Molulu moye mozali kaka yako talisa misala ya maboko te kasi ezali pe pona ko pusa bilenge bayeba pe bapona kosala yango"  maloba ma minisele. 

" Makanisi ma biso ezali kokisa linaka lia tata mokonzi yako kela mabaku bisika bilenge,bakeli misala pe baye bazali na misolo bakutana na ntina yako solola mambi ma motuya etali mayekoli ya misala ya maboko zambi suka nayngo ezali kozua mosala. To sali yango pona kobongola makanisi ma bato"

Molulu mozali kosalema na boyokani ya ndako ya mosala ya moyangeli engumba kisasa elongo na ministele etali mayekoli ya misala ya maboko utu mua 24 kino mua 26 ya sanza ya zomi na INPESS.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa