RDC : mbulamatari na ekenge makasi liboso ya bokono ya sika na etuka ya kwango 

Na panzi na etuka ya kwango esimabami na bokono ya sika oyo eyebani te pe ebomi bato ebele kolandisama ba sango kuna esika. 

Sarah Meta Savu

6 Sanza zomi na mibale 2024 - 11:47
6 Sanza zomi na mibale 2024 - 11:48
 0
RDC : mbulamatari na ekenge makasi liboso ya bokono ya sika na etuka ya kwango 

Na ngambo ya mbulamatari, ekenge emati makasi. Kolandisama maloba ya ministre atali mambi ma bokolongono boa nzoto, motango ya bato koleka 400 batalisami na bokono mingi mingi na bana bazali koliya malamu te.

" Toza na ekenge makasi. Toyebi nanu te pona koluka kisi yako bikisa yango" elobaki Roger Kamba liboso ya ba panzi sango mua 5/12. 

Ba tindami ya ndako ya boluki na mambi ya bokolongono boa nzoto (INRB) ezali kuna esika. Kolandisama maloba ya ministre atali mambi bokolongono boa nzoto, bako mema sango esengeli pona koyeba lolenge kani kobundisa bokono oyo etie kobanga na suka ya mvula. 

"Misala ya boluki eza mutuya pona koyeba malamu bokono. "

Bokono oyo eyebani te pe ezali kozwa na 40% bana ya mibu mitano kita Pamba te bazali penza na makasi te kolandisama libiki na bango kuna esika. 

Kolandisama maloba ya ministre Roger Kamba, bilembo ya bokono yango ezali, fièvre, kosukosu, motu pasi, miyoyo, ko pema na pasi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa