État de siège : « tolembi kobatela kasi ko zanga kolandela » Vital Kamerhe 

Liboso lia minisele molandi na mambi ma bosembo, Samuel Mbemba, mokambi ndako ya balobeli,Vital Kamerhe, alobi pona etali bopusi mikolo État de siège ya mbala 84 na bituka ya Ituri pe Nord Kivu. 

Sarah Meta Savu

24 Sanza ya zomi 2024 - 09:26
24 Sanza ya zomi 2024 - 09:28
 0
État de siège : « tolembi kobatela kasi ko zanga kolandela » Vital Kamerhe 

Mokolo moa misato 23/10 na lioko lokutani asengi misala ma solo yako landela ba mbuma ya État de siège uto ebanda. 

" Awa na ndako ya balobeli tolembi ko pusa se ko pusa. Mbala 84. Bato balembi kopusa koyebaka te mbuma nini ebotami." Bongo elobi ye. 

Etat de siège epusami pona mbala tuku muambe na mineyi. Ezalaki pona ko luka kosilisa bitumba pe bobomi na bituka ya Ituri pe Nord Kivu, mokano moye ya tata mokonzi ezali ko bota mbuma te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa