Félix Tshisekedi azelami na Indonésie pona linaka « Indonésie -Afrique »
Tata mokonzi ya ekolo Congo demokratiki Félix Antoine Tshisekedi azelami na Indonésie pona linaka lia libombo Indonésie -Afrique na sanza ya libua.
Lokasa la botalisi elongi na linaka liango pona tata mokonzi nde ezalaki moboko ya masolo ya VPM na mambi ya boyokani na bikolo ya bapaya Thérèse Kayikwamba Wagner pe matalisie elongi ya Indonésie na RDC Mohamed Hery.
« To sololi pe pona oyo etali bokembisi boyokani ya bikolo biye nzambi ekolo Congo demokratiki ezali moko ya bikolo ya motuya pona ekolo Indonésie,lisusu to sololi na oyo etali ndako ya botalisi elongi ya RDC kuna na Indonésie lokola elobamaki na masolo ya Tata mokonzi Félix Antoine Tshisekedi elongo na minisele na biso atali mambi ya boyokani na bikolo ya bapaya » elobi motalisi elongi ya Indonésie.
Kasi lokola tata mokonzi azali libanda ya mboka pona mambi matali bokongono akoki talisama na VPM na mambi ya boyokani na bikolo ya bapaya Thérèse.
