Bukavu : « moweleli ebonga moko te azali na emoniseli na nga nako kende maponomi kino suka ngai moko » Adolphe Muzito

Moweleli ebonga ya bokonzi na maponomi ya 20 2023, Adolphe Muzito, mua 14/12, alobi ete moweleli ebonga ya bokonzi moko te azali na limoniseli naye pona ekolo Congo demokratiki, ezalaki o'kati ya masolo na ba panzi sango na engumba ya Bukavu. 

Sarah Meta Savu

16 Sanza zomi na mibale 2023 - 08:36
 0
Bukavu : « moweleli ebonga moko te azali na emoniseli na nga nako kende maponomi kino suka ngai moko » Adolphe Muzito

Na linaka lia ye mitali campagne électorale moweleli ebonga n°24 azalaki liboso ya bayi mboka kuna esika yambo yako zwama na masolo elongo na ba panzi sango esika atalisi mokano moa ye yako kende kino suka ya maponami. 

" Moweleli ebonga ya bokonzi moko te na ngambo ya opposition azali na limoniseli na ngai na oyo etali ekolo Congo demokratiki,nako kende maponomi ngai moko pe kino suka". 

 Liboso ya bayi mboka alembisi likanisi lia ye yako kabola mabele ekolo kuna na moniele na mabota pona kotelemela ekolo Rwanda ko luka koyiba yango lisusu. 

"Rwanda ezali ekolo ya ba bokoli bibwele bazali na bosenga ya bisika ya monene nzambi bazali motango 500 ya boto pona kilomètres moko nzoka nde biso tozali obele 30 to 40 pona kilomètres moko na boye bako tika te kolanda mabele na biso tala ntina ya bosenga yako kabola mabele na mabota yango eko pesa biso nzela yako batela mabele na biso pe bonsomi ya ekolo na biso pe lisusu ko pesa nzela na bakambi ya mabele kozua bisika na mesa ya boko kopani oyo ezali ko salela mabele yango". 

Esengeli koyeba ete Adolphe Muzito azelami na Uvira mokolo ya mitano yambo yako koba na kindu kuna etuka ya Maniema.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa