Muzito : mbongwana eza motuya pona kozala na buku likonzi ewuti na mokonzi aponami na na nsomi 

Mbongwana ya buku likonzi ezali kosala makelele. Adolphe Muzito alobi ete esengeli esalema na na ndako ya balobeli baponama na nsomi pe mokonzi aponami na nsomi na bayi mboka. 

Sarah Meta Savu

17 Sanza ya zomi 2024 - 19:06
17 Sanza ya zomi 2024 - 19:06
 0
Muzito : mbongwana eza motuya pona kozala na buku likonzi ewuti na mokonzi aponami na na nsomi 

Mokambi mbulamatari ya kala azo zela kowuta na lisanga politiki udps makanisi ya malamu, kaka yako bongola buku likonzi te. 

« Soki udps andimi likanisi lia biso na oyo etali buku likonzi lia transition mabe ezali te. Kasi udps esengeli esuka kaka te na koloba kobongola kasi esengeli ba loba mbongwana nini balingi ko mema. Pona ngai, mbongwana ezali motuya na ntina ete tozala pona mbala ya yambo na ekolo na biso buku likonzi ekomami na balobeli baponama na nsomi pe mokonzi aponami na nsomi » 

Mokambi ya lisanga politiki Nouvel Élan azali pe ko senga ete bokonzi ezala ya presidentiel na second degree lokola na bikolo Angola, Togo, pe Afrique du Sud pona kosisa makambo mosusu ya mabe.

Mbongwana ya buku likonzi ezali kosala makelele. Na ngambo ya bonkonzi balobi ete ezali ko pekisa tata mokonzi kosala mosala lolenge esengeli, na mosusu balobi ete eza lolenge yako luka ko wumisa Félix Tshisekedi na bokonzi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa