Milulu mia campagne électorale : Adolphe Muzito alongi na kikwit

Ekoteli ya molongi ya Adolphe Muzito na engumba kikwit nde etalisi suka ya milulu mia campagne électorale pona moweleli ebonga ya bokonzi n° 24 na maponomi ya 20 décembre, mua lundi 18/12 , mokambi lisanga politiki Nouvel Elan ayambamaki lokola mokonzi. 

Sarah Meta Savu

19 Sanza zomi na mibale 2023 - 22:03
 0
Milulu mia campagne électorale : Adolphe Muzito alongi na kikwit

Ezalaki nde boyambi ya lolenge esalama nanu te kuna esika, kolandisama molobeli ya molobeli ya mokambi mbulamatari ya kala etuluku ya bato ebele bayaki kondima na mbela ya muana ya Bulungu, uto ko kita naye na mpepo kino na bisika ya bokutani. 

Adolphe Muzito atalisi linaka lia ye ya bokambi pona mibu zomi mizali koya ndakisa na oyo etali libombo ya ekolo. 

Adolphe asali milulu mia campagne électorale ya malamu penza na mozindo ya ekolo Congo demokratiki. Atamboli na Beni, Bukavu, Kindu pe ba Kasaï nionso.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa