RDC : « Tshisekedi azali kosakana na moto to sengeli ko telema » Martin Fayulu 

Na maloba maye pona bayi mboka, mokolo ya lundi 18/11, Martin Fayulu elongi eyebana na bayi opposition ya ekolo Congo demokratiki, abwaki mbela na bayi mboka, pona kolamusa makanisi mabango na oyo etali mimekano mbongwana ya buku likonzi kolandisa mabongisi ya tata mokonzi Félix Tshisekedi. 

Sarah Meta Savu

19 Sanza ya zomi na moko 2024 - 12:06
19 Sanza ya zomi na moko 2024 - 12:14
 0
RDC : « Tshisekedi azali kosakana na moto to sengeli ko telema » Martin Fayulu 

Na maloba ya makasi pe oyo ezali kosimba mitema, atalisi likanisi liye lokola likanisi moko yako bangisa pona ekolo. 

Martin Fayulu abangi te pona koloba " tata mokonzi Félix Tshisekedi azali kosakana na moto" kozanga boyebi pona ko Kamba ekolo. 

Na ngambo isusu, Fayulu atalisi lisusu mosapi na Tata mokonzi pona oyo etali ko kota ya ekolo Congo demokratiki 'a lisanga ya EAC , alobi ete mokano moye mokoki komema na kobungisa biteni bisusu ya mabele. 

Fayulu, azali komitalisa lokola molongi ya maponomi ya 2018, aza nanu komeka kobongisa elongi liboso ya bayi mboka.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa