Makelele na oyo etali mbongwana ya buku likonzi: « oyo nazali komona eza se pona kobungisa tata mokonzi » Patrick Muyaya na bayi opposition
Sima yako pona mutu na mutu likanisi lia ye pona oyo etali mbongwana ya buku likonzi na bayi opposition lokola Delly Sesanga, Patrick Muyaya, molobeli ya mbulamatari, alobi ete nionso eza pona ko tungisa tata mokonzi, "nako koselaka buku likonzi."
Liboso ya ba panzi sango mokolo ya lundi 18/11 na Lubumbashi, molobeli ya mbulamatari Patrick Muyaya, alobi ete azo kamwa maye maza kolobama na bayi opposition, ndakisa Delly Sesanga, nzoka nde bayi politiki ebele na ekolo bapesaka kala likanisi yako bongola biteni bisusu ybuku likonzi.
"Awa tosengeli to longola koyina, kolula bokonzi pe koluka bokonzi na ba nzela nionso (...) oyo nazo mona eza kobungisa tata mokonzi nako koselaka buku likonzi" elobi ye.
Kasi na esusu asengi batu banso baluka bomoko na esika yako luka koyina, tango yako zela bokelami ya lioko lisanga pona kosangisa makanisi ya ba moko pe basusu na mobu 2025 "atako ya naye balingi te".
Masolo na oyo etali mbongwana ya buku likonzi ekomi makasi lisusu. Tango USPS azo sala musala na tina ya likambo liango mangomba politiki masusu ba bateli kimia ndakisa UNC pe MLC na kati union sacrée.
