Muyaya na ambongo: tokoki  te ko pesa lisusu na balingi kozua bokonzi na mandoki

Minisele ya mambi ma bopalanginisi sango pe molobeli ya mbulamatari azangi te koyanola na maloba ya Fridolin Ambongo a na oyo etali ko kota ya bayi mboka misusu na masanga ya ba tomboki. Ezalaki liboso ya ba panzi sango 03/04 , Patrick Muyaya abengi mokambi ya eklezia katoliko na RDC andimbola malamu makanisi maye. 

Sarah Meta Savu

4 Sanza ya mineyi 2024 - 18:37
 0
Muyaya na ambongo: tokoki  te ko pesa lisusu na balingi kozua bokonzi na mandoki

Makombi misala ya bopalanginisi sango atatoli et "eza makasi penza" makambo elobi Fridolin Ambongo na kobakisa Maloba ya kalaka mokambi ya lisanga lia CENCO

"Kowuta na moto azali ko kamba eklezia lokola ye, maloba wana ezali makasi penza. Ezo pesa ko banga tango tozali ko banza maloba ya abbé Shole na tango alobaki " tozali na bosenga ya moto azangi bobangi" Patrick Muyaya

"Atako ndenge nini ekoki ko ndimama te ko pesa lisungi na bayi mboka oyo ba koti na botomboki pona ko boma ba ndeko ya basi, ya mibali,bana , ba, tata pe ba mama, nazo senga na Cardinal Fridolin Ambongo andimbola Maloba maye na tina yako tika te basusu te ba banza ete azali kopesa mutu makasi na baye balingi kosala botomboki " Patrick Muyaya

Na eleko ya bokembeli pasika cardinal Fridolin Ambongo azuaki libaku yako talisa makasi maye na oyo etali bayi mboka bazali ko kende na masanga ya batomboki alliance du fleuve Congo ya Corneille Naanga pe alobaki "nionso wana ezali po ete Awa na kisasa tozali kokeba te na oyo ekoki ko zokisa basusu pe kolembisa bomoko tolongoli basusu na eteni ya lipa ya ekolo. "

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa