RDC : misala pona kolongwa ya mapinga monusco na mabele ya Congo demokratiki emami pona sanza ya zomi na mibale

Na ebonga ya ONU pona likita lia bango ya mbala tuku sambo na muambe na engumba New York, tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi atalisi ebandeli ya misala yako kende ya mapinga ya monusco oyo elongwe pona sanza ya zomi na mibale ya mobu koto ibale tuku ibale na mineyi+2024), pona sanza ya zomi na mibale ya mobu koto ibale tuku ibale na isato moye tozali (2023).

Sarah Meta Savu

21 Sanza ya libwa 2023 - 16:50
 0
RDC : misala pona kolongwa ya mapinga monusco na mabele ya Congo demokratiki emami pona sanza ya zomi na mibale

Felix Tshisekedi atalisi na polele lolenge mapinga ya monusco esali mosala lolenge esengelaki te pona kotiya kimia na Congo. Mapinga eye eko te kotiya bokengi to ko batela bayi mboka na ekolo Congo demokratiki uto mibu tuku mibale na mitano siko. 

Mobateli buku likonzi akanisi ete " ezali na tina moko te yako koba ko kangama na mapinga mango pona luka kimia" ebakisi tata mokonzi Félix Tshisekedi.

Kokende na lombango ya mapinga ya monusco ezali pe pona mambi mayike lokola kanda na kati ya bayi mboka ba sanza eleki, ndakisa na engumba ya goma bisika bayi mboka basalaki milulu pona ko bengana mapinga ya monusco, ya suka na sanza ya muambe eleki pe esilaki na makila kotanga

"Pasi ezali ete mosala yako tiya kimia na Congo demokratiki eboti mbuma moko te mibu tuku mibale na mitano liboso ya botomboki pe bitumba oyo azali ko panza bayi mboka pe ezali ko pekisa bikolo ya grand lac ko batela bayi mboka na bango lolenge esengeli. Ko kende ya mapinga ekomi motuya mingi pona ko kitisa mitema", Wana nde maloba ya tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi na ebonga ya ONU.

Bipayi ya bayi monusco, posa ezali yako kosala misala miango na kimia.  O'boso ya ba panzi sango Bintou Keita, mokambi ya monusco na Congo demokratiki alobi ete ako sala maye masengeli na tina ete ko kende ya mapinga casque bleu etika te polele oyo eko bebisa bokengi te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa