Felix Tshisekedi na batomboki ya M23: "bazo koba ko boma bayi mboka pe ko sengaka masolo bako zuaka te "

Na maloba maye na likita linene ya ONU ya mbala tuku sambo na muambe mua tuku mibale ya sanza libua, tata mokonzi alobelaki likambo litali bokengi na moniele ya ekolo Congo demokratiki oyo biteni biyike esimbami esimbami na batomboki ya M23.

Sarah Meta Savu

22 Sanza ya libwa 2023 - 15:31
 0
Felix Tshisekedi na batomboki ya M23: "bazo koba ko boma bayi mboka pe ko sengaka masolo bako zuaka te "

Félix-Antoine Tshisekedi,na mongongo ya kanda, ayesi makasi mokano moa ye yako boya masolo elongo na batomboki ya M23 oyo bazali ko senga mobu mobimba ekoki. 

"Bazo (M23) koba ko boma bayi mboka, bazo boya kolongwa, bazo masolo,kasi eko pesamela bango te" maloba ya tata mokonzi.

Moyi mboka ya yambo ya ekolo Congo demokratiki azuaki libaku pona kotombola bitumbu bipesi amerika na Rwanda nzambi bazali ko pesa maboko simbisi na batomboki ya M23. Felix Tshisekedi asengi lisusu na bayi ONU ba pesa bitumbu na baye banso bazali kosala makambu ya mabe na kati ya mindelo ya Congo demokratiki.

Ba M23 bazali ko komisa ebele ba sango esika bazali ko laka ete bako bundisa kisasa. Misala ya Luanda/Nairobi eboti eloko te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa