RDC: «  bo yokani ya moyibi motikala ko zala te elongo na ngai pe moto na kitana naye na maponomi ma 2018 », Félix tshisekedi liboso ya bayi mboka, na engumba News-york

Tata mokonzi ya ekolo Congo democratiki, Félix Antoine Tshisekedi awuti ko bimisa bosolo ya makasi na maye matali elonga naye na maponomi ya mobu koto ibale zomi na muambe. Ezalaki oboso ya bayi mboka bako bikaka na mikili mia amerika, bisika wapi asengeli ko talisa elongi na likita linene lia onu ya mbala tuku sambo na muambe.

Sarah Meta Savu

20 Sanza ya libwa 2023 - 16:33
 0
RDC: «  bo yokani ya moyibi motikala ko zala te elongo na ngai pe moto na kitana naye na maponomi ma 2018 », Félix tshisekedi liboso ya bayi mboka, na engumba News-york

« Etikala ko zala te boyokani ya moyibi elongo na ngai na tata mokonzi ya kala ( Joseph kabila) na eleko ya maponomi ya 2018 », elobi tata mokonzi Félix Tshisekedi.

Se o’libaku, asengi na moto monso oyo azali na bilembo bizali ko talisa lolenge losusu ya makambu, abimisa yango.

« Oyo alobi Eza ya solo te asengeli atalisa bilembo », abakisaki.
Tata mokonzi tshisekedi abatelaki kimia ngonga molayi atako ba nungu nungu sima ya elonga naye na maponomi ya 2018.

Lelo apesi nzela na moto monso atalisa solo To lokuta na Likambo liango

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa