RDC : ba kuluna koleka 700 bakangami na linaka « ndombo » ya Jacquemin Shabani 

Mobiangami na minisele ya bopanzi sango pona lapolo ya mposo nionso liboso ya ba panzi sango, makambi molandi na mbulamatari pona mambi mondelo o'mboka  bokengi mpe bokoko akumisi misala ya linaka ndobo oyo ezali kolandela batu ya mabe, ba bomi ya lolenge na lolenge oyo bayebani mingi na kombo ya kuluna na engumba mokonzi kisasa. 

Sarah Meta Savu

14 Sanza zomi na mibale 2024 - 09:26
14 Sanza zomi na mibale 2024 - 09:27
 0
RDC : ba kuluna koleka 700 bakangami na linaka « ndombo » ya Jacquemin Shabani 

Pembeni ya moninga moa ye mosala ya mambi ma bopanzi sango, Jacquemin Shabani atalisi ete 784 kuluna batiami maboko na pulusu mpe bako zala liboso ya ba zuzi pona lisambisi lokola bato na yawuli. 

" Tozali kosala mosala na biso, to kangi bato ya mabe oyo bayebani na pulusu pe tozali kotinda bango na bosembo. Esengeli sika kotikela bokonzi oyo kosala mosala naye kopesa moko na moko etumbu ebongeli ye". Jacquemin Shabani 

Linaka liye na kisasa je liko Kende na bituka binso pe bingumba binso. 

Ezali na bingumba bizali na misala pona kolandela batu ya mabe Kasi bako zua libaku yako lisungi pona misala mina ko wuta na bokonzi ya pulusu ya likolo pona kitisa motango ya bato mabe". Abakisi 

Mbulamatari ya Congo demokratiki,alobi ete azali bopikiliki pona kosilisa likambo liango po ewumeli mibu ebele. Pona yango ebongisami linaka linene na etando ya RDC mobimba. 

Linaka"ndobo " ebandaki uto mua 6 ya décembre tozali. Linaka liye lizali pona ko kanga ba kuluna pe kosilisa batomboki oyo bazali kozangisa kimia pe bokengi na bayi mboka.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa