Bitumba na moniele: "RDC eboyi masolo na M23 " Tshisekedi

Sima ya masolo elongo na Cyril Ramaphosa, tata mokonzi ya ekolo Afrique du Sud moa motoba ya sanza sambo na kisasa, Felix Tshisekedi abateli mokano naye ya koboya masolo na M23 oyo bazui biteni biyike ya Congo demokratiki uto mobu moko.

Sarah Meta Savu

7 Sanza Sambo 2023 - 09:22
 0
Bitumba na moniele: "RDC eboyi masolo na M23 " Tshisekedi

"Rwanda ezali ko bika na sima ya bitumba na moniele, bitumba oyo azali kobatela libombo ya ekolo na bango tala Rwanda ezali ko boya masolo mpe RDC eboyi masolo na bangamba" nde maloba ya tata mokonzi Felix Tshisekedi.

Se o'libaku Felix Tshisekedi atalisi mokano naye ya ko solola na ekolo Rwanda kasi kaka na ngambo na bango ba ndimi ete ba zali na sima ya M23.

"Ezali ya liboso na yoki ete toboyi masolo na ekolo Rwanda" Felix Tshisekedi abakisi.

Boyokani ya Congo demokratiki na ekolo Rwanda ezali ya ko kufa uto bunagana ekweya na maboko ya M23. Kisasa ebengana motalisi elongi ya ekolo na bango Vincent Karega.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa