FARDC : Bakambi basika na mapinga pona ngonga ya mukie na Nord Kivu, Ituri, pe Équateur

Mokonzi na mapinga ya FARDC Christian Tshiwewe Songesha atie pona mikolo ya kotanga bakambi ba sika ya mapinga pona bituka Nord Kivu Ituri pe Équateur. 

Sarah Meta Savu

8 sanza ya yambo 2024 - 17:29
 0
FARDC : Bakambi basika na mapinga pona ngonga ya mukie na Nord Kivu, Ituri, pe Équateur

Kolandisama liyebisi lia mapinga  général David Mushimba azui  mokumba ya bokambi ya etuluku ya zomi na misato (13) na etuka ya Équateur, ba généraux Ntambuka Bame pe Michel Mabondami bazui mokumba ya etuluku ya mapinga ya tuku misato na mibale (32) na eteni ya Ituri pe ya etuluku ya tuku misato na mineyi na Nord Kivu. 

Colonel Okoko Onoya Bokeoni ye pe azui mokumba ya sika na mapinga FARDC. Aponami lokola mokambi molandi ya misala mia renseignements na linaka sokola 1 Grand Nord na Nord Kivu. 

Général Michel Mabondami azui esika ya général Bruno Mpezo Mbele oyo akangamaki uto mikolo muambe pamba te abukaki mobeko motemeli mapinga ko mosala na FDLR pe lolenge ya mabe ya ko salela biloko ya mosala.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa