RDC : "Maponomi eko zala te mua 20/12/2023" Corneille Nangaa

Na etando ike ya France24 mua 18/10, mokambi ya kala ya ndako ya Maponomi, Corneille Nangaa, alobi asukisami na motetema naye ete maponomi nzambi misala ya mabongisi ya maponomi mango mazali malamu te. 

Sarah Meta Savu

19 Sanza ya zomi 2023 - 16:37
 0
RDC : "Maponomi eko zala te mua 20/12/2023" Corneille Nangaa

Pona ye kozanga botosi ya boyokani ya Joseph Kabila pe Felix Tshisekedi na mobu 2018 ekoki ko mema mabe na botambwisi mbulamatari.

" Maponomi eko zala te mua 20/12/2023.moboko ya Mabongisami ya maponami efandisami na lokuta. Boyokani na maye matali politiki    esalemaki ya solo kati ya Joseph Kabila pe Felix Tshisekedi na mobu 2018.  Boyokani boango ekoki ezali ya mutuya esengeli etosama noki te ebota mabe. 

Moyi opposition ya sika na mboka mopaya akanisi ete tata mokonzi asali musala malamu te na oyo etali bokengi kotalaka bilaka apesaki na bayi mboka na moniele. 

Na mikolo mukie ya maponami mituna ezo koba na ngambo ya opposition, FCC ekanisi azali kondimela te misala ya mobongisi ya maponami pe pona baye baza bokonzi "engunduka ekeyi"

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa