Bitumba o'moniele : Corneille Nangaa akeli lisanga lia ye ya batomboki elongo na M23 pe Rwanda

Mokambi ya kala ndako ya maponomi CENI na RDC, Corneille Nangaa awuti ko tatola ete akeli lisanga lia ye ya batomboki libengami Alliance Fleuve Congo (AFC) elongo na M23 na lisungi ya ekolo Rwanda. 

Sarah Meta Savu

16 Sanza zomi na mibale 2023 - 10:05
 0
Bitumba o'moniele : Corneille Nangaa akeli lisanga lia ye ya batomboki elongo na M23 pe Rwanda

Alobi uto Nairobi na ekolo Kenya liboso ya mokambi lisanga lia batomboki ya M23 Bertrand Bisimwa , mua 15/12. 

" Lelo to bandi misala ya lisanga alliance Fleuve Congo (AFC)" Corneille Nangaa liboso ya ba panzi sango.

Lisanga lizali na mangomba ebele na kati lokola FRPI, Zaïre,M23, Twiraneho pe Pareco.

Limoniseli lia lisanga liye lizali ya ko bundisa bokonzi ya Felix Antoine Tshisekedi, Tata mokonzi ya ekolo Congo demokratiki. 

Esengeli ko Simba ete moyi MBILA Corneille Nangaa akomi motomboki pe asali boyokani na bokonzi ya Paul Kagame Tata mokonzi ya ekolo Rwanda oyo azali ko sunga batomboki  ya M23 oyo bazali koniokola ko bundisa na moniele ya RDC pona koyiba bozui ya se ya mabele ya ekolo Congo demokratiki

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa