RDC : Félix Tshisekedi alendisi mapinga ya FARDC ko tikala sembo na mosala bazali kosala

Tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi asangisaki kuna na suku ya monene ya cité de l'union africaine mua 18/10 bakonzi ya mapinga FARDC pe balandi na bango. 

Sarah Meta Savu

18 Sanza ya zomi 2023 - 21:56
 0
RDC : Félix Tshisekedi alendisi mapinga ya FARDC ko tikala sembo na mosala bazali kosala

Na mesa ya bileyi ebongisamaki pona bango tata mokonzi abengi bango ko tikala sembo na mosala bazali kosala pe nzela ba pona yako batela ekolo. 


" Ko teka ekolo Congo demokratiki ata mokolo moko te. Tozali liboke ya baye ba batelaka ekolo". 

Ko tala maye mabimi na ba panzi sango ya ndako ya misala ya tata mokonzi, tata mokonzi azongisi sika elaka ya mbulamatari pona libiki lilamu ya mapinga pe mabota ma bango. 

"Botikala obe sembo na mosala na bino. Mbulamatari ako bongisa nionso pona ko memya mosala na bino tango oyo pe na sima". 


Bokutani ya tata mokonzi ya Congo demokratiki elongo na bakonzi ya mapinga eye sima ya bililingi ya John Numbi o'singa ya internet pe bitando bikie. Ba maloba oyo mbulamatari azui na pete makasi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa