Maponomi ya 2023: Denis Mukwege akembisi makanisi maye yako wela ebonga ya bokonzi

Moweleli ebonga ya bokonzi Denis Mukwege, atalisi ete ye akembisi mokano moa ye yako kende kino suka ya maponami pona kowelela ebonga ya bokonzi na maponomi ya 20 décembre, litatoli liye litie suka na nungunungu na oyo etali kolongwa naye pona bolamu ya moweleli ebonga mosusu. 

Sarah Meta Savu

18 Sanza zomi na mibale 2023 - 15:36
 0
Maponomi ya 2023: Denis Mukwege akembisi makanisi maye yako wela ebonga ya bokonzi

Na lioko liyebisi ya lundi 18/12 moweleli ebonga n° 15 alobi: " nazali koluka bokonzi pona ko banda mosala na politiki te, kasi ezali pona kobongola nkeni na nga ya prix Nobel ya kimia ekoma kimia ya solo pe ya mobimba"

Denis Mukwege azali moko na kati ya baweleli ebonga ya bokonzi zomi na libwa baye tikali pona maponomi ya 20 décembre tango sambo basili kolongwa na nzela.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa