ESU: " mobu mozali koya mapolome ya graduat ezala lisusu te" Mohindo Nzangi

Mapolome ya graduat eko zala lisusu te na biteyelo ya likolo ya l'Etat pe misusu na ekolo Congo demokratiki uto mobu moa kelasi ya ba kolo 2023-2024. Nde maloba ya Mohindo Nzangi ntoma atali mambi ya biteyelo ya likolo mua 19/10/2023. 

Sarah Meta Savu

19 Sanza ya zomi 2023 - 23:22
 0
ESU: " mobu mozali koya mapolome ya graduat ezala lisusu te" Mohindo Nzangi

Ezali kotalisa boyeyi na lombango ya mayekoli ya LMD uto eponami lokola lolenge ya sika pona mayekoli na mbulamatari ya Sama Lukonde. 

Ntoma Nzangi liboso ya ba panzi sango atuti tolo na tina ya mbonguana na misala mina ndakisa bokoti ya macini pona manso pe lisusu nzela ya Pete pona ko sunga biteyelo binso ko salela mbonguana yango. 

Pona biteyelo 14 na engumba mokonzi kisasa ezali ko salela yango. Ezo pesa nzela yako yeba misolo mikoti mokolo na mokolo pe lolenge mateya mazopesama. 

Lisusu ntoma Nzangi alobi ete ebongisami ndako ya ba buku yako salela na masini to allo allo (bibliothèque numérique). 

Libiki lia balakisi pe elobami. Lifuti lia bango emati na 50%,ya ba landi na bango emati na 87%.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa