Gouvernement Suminwa II : « opposition eko koma nini kuna na ndako ya ba lobeli ? », Damien Kapay azo mituna
Remaniement ya mbulamatari oyo esalemaki mua 8/08 eleki ezali kokela mituna ebele kati ya bayi mboka na oyo etali bokoti ya bilongi ya bayi opposition na mbulamatari. Damien Kapay Shiyu moto ya mayele na ndako ya bolukiluki Ebuteli, amituni " bayi opposition bakeyi wapi?"
Kolandisama maloba, remaniement yango eye na eloko moko ya makasi kotalaka bitumba na moniele, na boye ezali nde makambu matali politique na kati ya parlement.
" Biloko mibale ezali ko monisama : ko Kuta ndambu ndambu ya bayi opposition na kati ya ndako ya balobeli, pe boyeyi makasi ya Union Sacré de la nation USN".
Na likasa ya makomi ewuti na Talatala.cd ko longwa mukie mukie ya lisanga DYPRO, ya Constant Mutamba, pe Nouvel Elan ya Adolphe Mozito na kati ya Union Sacré pe na mbulamatari ya Suminwa, pona ye ezali kosilisa makasi ya opposition.
Bayi a na ndako ya balobeli natikali pene ya 20 likambo yango ezali kolongola mingongo ya makasi ya bayi opposition kuna na ndako ya balobeli
Uta mbela Union Sacré de la nation azali na balobeli 477 , na bongo motango ya bayi opposition ekiti Lolenge nanu ekita te kala. Azongisi na makasi ya bato été Christelle Vuanga, Gratien Iracan, balongwe na lisanga Ensemble ya Moise Katumbi pe ko kima ya Matata Ponyo.
Kapay, atalisi été kozanga batu minene ekoki ko sala ete mikano na ndako ya balobeli ekoma mongongo moko pe kopesa nzela pona kobongola mibeko mosusu.
