Dossier Mutamba : mokambi mbulamatari Judith Suminwa abengami pona litatoli
Mokolo ya bosambisi naye ya misato, Constant Mutamba, ministre ya kala ya mambi ma bosembo atalisaki posa yako mona mokambi mbulamatari Judith Suminwa koya ko tatola.

Constant Mutamba atalisi makanisi maye yako benga pona litatoli Rose Mutombo, ministre ya bosembo liboso ye azua ebonga, Didier Budimbu, ministre atali mambi ma masano, Kisula Betika Yeye Adler, kalaka mokambi ya CENAREF, Alexis Gisaro ministre atali mambi ya botongi pe ba konzi ebele.
Lisambisi eko koba mua 4/08. Kotalaka manso oyo mbutumbutu ezali makasi nzambi ba nzeneke ebele bazelami ndakisa Dileketele mokambi na misala yako landela alima ya ba marché publics, kalaka mokambi ya minisele ya bosembo pe kalaka mokambi na ndako ya misala yako landela alima ya ba marché publics na minisele ya bosembo.
Ba nzeneke basusu bazali : kalaka mokambi ya minisele ya botongi, Dileketele mokambi ya kopani FRIVAO pe gestionnaire ya ndako enene ya kopani ZION.
Maloba manso ya balobeli ya Constant Mutamba na lisambisi endimami te, ba senga lisusu ko pusa na poso mibale baboyeli bango pe lokola.