Kinshasa : mbulamatari apekisi milulu oyo etali masano te na stade des Martyrs pe Tata Raphaël 

Wuta lelo, milulu manso oyo etali masano te eko salema lisusu na stade des Martyrs pe Tata Raphaël te. Mbulatari ya Kongo democratik azwi ekateli oyo na mokolo mwa lomingo eleki. 

Rédaction Lingala

29 Sanza Sambo 2024 - 09:29
29 Sanza Sambo 2024 - 09:30
 0
Kinshasa : mbulamatari apekisi milulu oyo etali masano te na stade des Martyrs pe Tata Raphaël 

Pona mokambi ya minisele etali libateli, Jacquemin Shabani, ekateli oyo ezwami pona ko boya ete batu ba kufa lisusu ndenge bawuti kokufa na mokolo ya ponso eleki na milulu ya mosali na Nzambe Mike Kalambay na ndaku ya masano ya ndembo ya munene, stade des martyrs. 


Na yango, milulu minene ya ba yembi lokola Ferre Gola oyo ebongisamaki na Tata Raphaël mpe ya Fally Ipupa na ndaku ya masano ya munene stade des martyrs eko salama lisusu. 

Bo sengeli ko yeba ete batu libwa (9) ba kufaki na ndaku ya masano ya munene stade des Martyrs na mukolo ya poso na mululu ya MIke Kalambay. Kuna, batu ko leka nkoto ntuku mwambe (+ 80.000) ba kendaki pona ko kumisa nkolo.