RDC : limoni motoba ya Felix Tshisekedi pona bokonzi na ye ya mbala mibale

Pona bokonzi naye ya mibale na moto ya ekolo Congo demokratiki, Félix Antoine Tshisekedi, apesi bilaka ebele na ba congolais oyo ekabuani na biteni motoba (6). 

Sarah Meta Savu

23 sanza ya yambo 2024 - 13:11
 0
RDC : limoni motoba ya Felix Tshisekedi pona bokonzi na ye ya mbala mibale

Pona mibu mitano mizali koya Felix Tshisekedi alaki ko kela misala nako tiaka entreprenait liboso pe abeti sete koloba ete ekotambola mingi mingi elongo na bilenge. 

Mobateli ekolo aleki pe ko batela makoki ya mabota na oyo motuya ya biloko na zando nako tiaka liso na taux ya dollar na tina ete etepatepa te. Azui pe nkatela « yako batela na motema mobimba bayi mboka na biloko na bango » na nzela ya mbongwana ya makasi na misala mitali bokengi ya ekolo Congo pe boyokani na bikolo bisusu. 

Limoni lia ye ya mineyi ezali nde yako fongola lbombo pe komatisa yango po ete etelema liboso ya bikolo bisusu onte ya molongo nako bongolaka biloko ya bilanga pe bozui ya mabele awa na ekolo. Alaki lisusu kotia liso na maye matali mambi ma bokolongono boa nzoto pona moto monso, kelasi ya ofele pe linaka PDL 145 territoires. 

Ya suka, Felix Tshisekedi azui nkatela yako kembisa misala na ba kopani ya l'Etat na ekolo Congo demokratiki. 

Ezalaki o'boso ya bayi mboka koto tuku muambe (80.000), bakambi bikolo pe batalisi elongi ya bikolo biyike nde tata mokonzi alapi ndayi pe azui bokonzi pona mibu mitano mizali koya.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa