Kabuya alobi na tina ya Katumbi: « ata 18% oyo ba pesi abongi na yango te »

Augustin Kabuya atiki likambo ya Moïse katumbi te, moweleli ebonga ya mawa zambi alongi te na maponomi pona ebonga ya tata mokonzi mua 20 décembre eleki. Pona kalaka mokambi ya USPS mokambi ya ensemble pour la république Moïse katumbi azalaki misala mia campagne électorale malamu te. 

Sarah Meta Savu

18 sanza ya yambo 2024 - 20:39
 0
Kabuya alobi na tina ya Katumbi: « ata 18% oyo ba pesi abongi na yango te »

Na masolo maye elongo na ba panzi sango ya RFI mua 16/01/2024 moto ya yambo ya lisanga politiki UDPS alobi: " na ndimisami te Moïse katumbi abongamaki lolenge esengelaki pona maponomi. Basengeli ba ndima ete ba kweyi na maponomi, ya solo katumbi azali na kokoso pona ko solola  akomaki na epimelo esengeli te. Ata 18% ba pesi ye abongi na yango te. "

Koponama ya Felix Tshisekedi pona mbala mibale pona mibu mitano mizali koya ezali ba mbuma ya bato ba ponamaki pona kosala misala mia ye ya campagne électorale na biteni mineyi ya minoko ya mboka na biso. 

" Soki botali malamu Union Sacrée ezingaki nde biteni binso ndakisa ata na nordi ya ekolo bayi poliki banso ya makasi bazalki na sima ya moweleli ebonga n°20 , lolenge loko pona moniele, na eloli lisusu Felix Tshisekedi azalaki na pasi te yako  solola na bayi mboka " boye nde abakisi. 

Bayi opposition bazali ko koba kotelemela maponomi ma bongisamaki na bayi CENI zambi balobi été manso masalemi pona kopesa Félix Tshisekedi elonga ya makasi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa