Maponomi ya tata mokonzi: Seth Kikuni asengi na ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle ba boya mokanda ya Tshisekedi na maponomi

Balobeli ya moyi opposition Seth Kikuni , mua lundi 23/10 bakeyi na ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle basengeli na ndako ena ba boya mokanda ya Tshisekedi ya bokomisi kombo na maponomi pona lokuta. 

Sarah Meta Savu

24 Sanza ya zomi 2023 - 09:35
 0
Maponomi ya tata mokonzi: Seth Kikuni asengi na ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle ba boya mokanda ya Tshisekedi na maponomi

Na bolukiluki Seth Kikuni atalisi boye na maponomi ya 2019 Tshisekedi abengamaki "Tshisekedi Tshilombo Felix " kasi na mokanda ya CENI mobu moye abengami "Tshisekedi Tshilombo Felix Antoine"

Balobeli ya Seth Kikuni ba zongisi na makanisi ya ndako ya bosambisi ete kombo ya moyi mboka nionso na RDC ekoki ko bongwana te kolandisama na mokapo 56 ya mibeko etali mabota. 

Balobeli ba pesi na ndako ena mikanda mia kala ya lolenge moko oyo eboyisa ba kombo ya bato mosusu. 

Moïse katumbi aza lisusu ye moko te moto afundami ndako ya bosambisi ya cour constitutionnelle. Ndako ya bosambisi ya likolo makasi na ekolo Congo demokratiki esengeli ko pesa mokano moa mikolo mikoya.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa