Kisasa: mobateli mpate Pierre Kas Atindami na boloko ya makala

Mokangami na cachot ya parquet général ya ndako ya bosambisi ya cour d'appel ya kisasa, moteli mpate Pierre Kasongo Kasambakana Atindami na boloko ya makala mokolo ya mardi 24/01/2024. 

Sarah Meta Savu

24 sanza ya yambo 2024 - 20:42
 0
Kisasa: mobateli mpate Pierre Kas Atindami na boloko ya makala

Mobateli mpate Daniel Mabiala, papa moboti ya elenge muasi oyo libala naye na pierre Kasambakana atamboli pe elobisi mingi o'nzela singa interneti Atindami pe kuna na boloko ya makala. 

Moto ya yambo ya eklezia primitive afundami kozua na libala bilenge basi ya mibu esengeli (mineurs). Kolandisama ba sango biyike ezali libala naye ya mbala zomi na sambo (17). 

Pierre Kasambakana azuami na pasi makasi, pamba te bosembo ya ekolo Congo demokratiki etelemi makasi pe ezali kolimbisa te mambi matali viol na bana bake. Mibeko mibongisi bitumbu ya misala makasi boloko ya mibu mitano kino tuku mibale (5 à 20ans) pe lomande ya mosolo ebele.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa