RDC : Kabila, Fayulu,Katumbi... Basangani pona kotelemela mbongwana ya buku likonzi

Joseph Kabila, Martin Fayulu, Moïse Katumbi pe bayi opposition ya ekolo Congo, na lioko liyebi litangamaki mokolo mercredi 20/11 kuna na ndako ya mosala ya CENCO, batalisi ete bazali kotelemela mbongwana ya buku likonzi na mabongisi ya Felix Tshisekedi. 

Sarah Meta Savu

21 Sanza ya zomi na moko 2024 - 17:57
21 Sanza ya zomi na moko 2024 - 17:58
 0
RDC : Kabila, Fayulu,Katumbi... Basangani pona kotelemela mbongwana ya buku likonzi

Pona bango, Félix -Antoine Tshisekedi Tshilombo posa naye azali yako wumela na bokonzi. 

" Mobeko moko te na buku likonzi ezali kopesa Tshisekedi abongisa libiki lia bayi mboka,lokola ko bongisa lifuti ya mapinga,ya pulusu,ya minganga,ya balakisi pe basali basusu ya l'Etat ; ko pesa nzela po ete bayi mboka bazala na mayi ya peto,lotiliki ya malamu, lisungi pona bokolongono boa nzoto ya malamu, ko bongisa taux misolo, ko tonga pe kobongisa ba nzela " boye etangamaki na Emmanuel Ramazani Shadari ya FCC. 

Bayi opposition batalisi pe kotungisama bazali nayango oyo ememi na "liwa ya Chérubin Okende" ko buka mibeko ezali kobatela bomoto, ko kanagama pona mpamba ya bayi opposition. 

Fayulu, Katumbi, Kabila pe bayi opposition ebele basangi lokola moto moko pe ba bengi bayi mboka lolenge moko kotelemela linaka liye ya mabe. 

Uto kobima ya tata mokonzi na polele na Kisangani pe Lubumbashi bisika atalisaki posa naye yako bongola biteni bisusu ya buku likonzi, makelele ezali kosila te, bayi opposition balaki mabongisi masusu na balabala pona kotelemela linaka liye.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa