Corneille Nangaa na ba Léopard : " makasi ya makolo na bino esunga pona ko bengana bokabuani ya bikolo pe bozangisi ya bitumbu na se ya bokonzi ya Tshisekedi "

Lokola bayi mboka nionso Corneille Nangaa mokambi ya kala ya bdako ya maponami, apesi longonya na ba Léopard ya ekolo congo demokratiki pona elonga pe esika na masano ya nkeni ya bikolo bia afrika (can), o'nzela singa mondele Tweeter mua zomi na moko ya sanza libua.

Sarah Meta Savu

11 Sanza ya libwa 2023 - 16:08
 0
Corneille Nangaa na ba Léopard : " makasi ya makolo na bino esunga pona ko bengana bokabuani ya bikolo pe bozangisi ya bitumbu na se ya bokonzi ya Tshisekedi "

Na mokanda ya mokakosoa, Corneille Nangaa abengisi ba beti nde nako mikosa na likambo pona ko silisa bizaleli ya mabe oyo azali kotambola elongo, na bokonzi ya Felix Tshisekedi.

" Maboko pe mokakosoa na ba Léopard na biso!, Moakoki ma biso yako mata lisusu eza makasi (...) Tika makasi ya makolo na bino esunga pona ko silisa bokabuani ya bikolo pe bozangisi ya bitumbu.bokonzi oyo elongoli ekolo ya biso enzombo na lokumu onte ya molobgo mikolo na ye etikali ya ko tanga " boye nde maloba maye ( Corneille Nangaa).

Alakisi mosapi kokoso ya lotiliki na ekolo nzambi ebandisaki masano endongwanisaki Congo demokratiki pe Soudan.

"Elonga eye elongoli soni tozuaki onte molongo pona kokende ya lotiliki na libanda ya masano martyrs,bilembo ya bokambemi mabe. Na mi-temps lotiliki mua ngonga mukie, ebongo ekeyi lisusu, bilembo ezo talisa ete ebonga pona mbala ya mibale eko zala te"

Mokambi ya lisanga politiki Action pour la dignité du Congo et de son peuple, azo likya ete kokoso ya lotiliki pe ya mayi eko sila sima ya bokonzi oyo.

Uto kuna bisika akimela mokambi ya kala ya ndako ya maponami azo koba na ko telemela bokonzi oyo azali na esika nzambi alobi ezali ko kamba nako bangisa

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa