Lisambisi ya Kabila: ndako ya bosambisi ya mapinga ezongeli misala mua 19 septembre 

Ndaku ya bosambisi ya mapinga mokolo ya vendredi 12 septembre, ezui mokano yako zongela misala ya bosambisi ya Joseph Kabila. Etumbu esengelaki ekweya lelo epusami pona mua 19 septembre.

Sarah Meta Savu

17 Sanza ya libwa 2025 - 09:19
17 Sanza ya libwa 2025 - 09:20
 0
Lisambisi ya Kabila: ndako ya bosambisi ya mapinga ezongeli misala mua 19 septembre 

Bo pusami ya mikolo ezali kolandisama bosenga ya partie civile etalisami lokola ekolo Congo demokratiki, pe asengaki ko yoka ba nzeneke misato ya sika. 

Ba nzeneke basatu bakoya pona ko talisa nzela nini misolo elekaka kowuta na mofundami Joseph Kabila pona ko kende na batomboki ya M23/AFC/RDF, pe ko talisa lolenge mopaya akambaki elolo mibu 18" maloba ya Richard Bondo, moko ya balobeli ya ministère public. 

Mofundami Joseph Kabila, azali ko samba pona trahison, participation na lisanga ya batomboki, crime contre l'humanité, homicide intentionnel, apologie du crime, torture, deportation pe kozua engumba Goma na makasi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa