Boyokani : bofongoli bikuke ya ndako ya botalisi elongi ya ekolo Israel na kisasa

Tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo, azalaki na masolo elongo mokambi mbulamatari ya ekolo Israel, Benjamin Netanyahou, mua tuku mibale na moko, sanza ya libwa na New York pona boyokani etali bikolo bibale.

Sarah Meta Savu

29 Sanza ya libwa 2023 - 09:30
 0
Boyokani : bofongoli bikuke ya ndako ya botalisi elongi ya ekolo Israel na kisasa

Bokengi,ko kotisa misolo, bilanga, botongi ba nzela ezalaki onte ya masolo ma bango.

Israël elaki kolongola bikuke ya ndako botalisi elongi na Kisasa pona ko kembisa boyokani na ekolo Congo demokratiki.

Boyokani boye bokoki kotia Makelele. Jérusalem ayambaki lokasa ya mbianga ya Union africaine na tina yako zala moko ya bango kasi ba pesi eyano moko te kino lelo.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa