Fridolin Ambongo na Kigali : « Soki na eklezia to koki koyokana pona nini te na lolenge politiki »
Kimia na mikili mia Afrika, wana nde ezalaki mama na likambu na maloba ya Cardinal Fridolin Ambongo na milulu ya eklezia ebongisamaki na SCEAM ya Madagascar, mokolo moa lundi 25/11,na Kigali engumba mokonzi ya ekolo Rwanda.
Liboso ya ba panzi sango, episkopo mokonzi ya kisasa pe mokambi ya SCEAM amituni mituna na oyo etali bozangi bondeko kati ya bakambi bikolo na mikili mia Afrika, na esika ya bondeko na ndakisa ya ba episkopo ya Afrika.
" Soki biso na eklezia tokoki ko kutana pe kosolola pe kozala na bondeko,tozali komituna pona nini na ngambo ya politiki eko kozala lolenge moko te ?" Elobaki Fridolin Ambongo,pe abakisi boye " yango nde losambo na biso. Toko tala yango malamu".
Kolandisama ba panzi sango ya Rwanda, Cardinal Ambongo abetaki sete na motuya ya SCEAM na Kigali, pamba ezali kobongisama bokutani bonene ya ba episkopo kuna esika mikolo.
"Eza motuya kokutana na bisika yambo ya bokutani ya ba episkopo pona komona soki solo manso makoki lolenge esengeli " Fridolin Ambongo.
SCEAM eza kotambola kolandisama ba région oyo ezo talisa elongi ya eklezia na mikili mia Afrika. Na ba région tozali kotanga SCEAM oyo esangisi RDC, Rwanda pe Burundi.
