RDC : « Félix Tshisekedi azali kosakana na moto lokola muana moke » Martin Fayulu pona oyo etali mbongwana ya buku likonzi

Batelemeli bokonzi ya Felix Tshisekedi bazali ko ndima te masolo matali mbongwana ya buku likonzi. Pona Martin Fayulu tata mokonzi azali kosakana na moto " lokola muana moke", nako talisa makanisi naye na likambu lingo. 

Valentin Kabandanyi

25 Sanza ya zomi 2024 - 21:12
25 Sanza ya zomi 2024 - 21:12
 0
RDC : « Félix Tshisekedi azali kosakana na moto lokola muana moke » Martin Fayulu pona oyo etali mbongwana ya buku likonzi

"Azali pona buku likonzi te nde biteni 115 ya ekolo na biso eza na maboko ya mapinga ya bapaya pe mbulamatari ezali kotalisa buluyeke na mambi matali misolo?" Maloba ya Martin Fayulu na X ( tweeter ya kala). 

O'libaku lioko motelemeli bokonzi atalisaki lisusu likanisi lia ye yako sala masolo bosangisi masanga politiki manso pamba te pona ye ezali se nzelo moko yako bimisa ekolo na biso na pasi. 

Na Kisangani, tata mokonzi abombaki te likanisi lia ye yako bongola buku likonzi oyo,pona ye ekomami na bapaya. Félix Tshisekedi abakisi ete lioko lisanga liko kelama pona tala mibeko nini esengeli ko bongola o'kati ya buku likonzi.

Valentin Kabandanyi Valentin Kabandanyi Kalenga est licencié en journalisme politique extérieure de L'ifasic depuis 2010. Marié et père de 5 enfants, Directeur des infos à arts.cd, présentateur du JT en Tshiluba à RTEDUC, Analyste et Chroniqueur politique, Actuellement Coordonnateur National de la Génération Christophe Lutundula "GCL"et Candidat à la députation provinciale à Mwene Ditu, dans la Province de Lomami.