Maniema : ba Kambi etuka ba silisi nungunungu na oyo etali bozali ya batomboki ya M23 na etuka na kindu

Moyangeli ya ngonga mukie na etuka ya Maniema AFANI IDRISA MANGALA,  o'kati ya lioko liyebisi mokolo mua yambo ya sanza mitano ya mobu koto ibale tuku ibale na isato atalisi bosolo na nungunungu na oyo etali bozalisi ya bayi M23 na engumba kindu.

Redaction

1 Sanza ya mitano 2023 - 21:27
 0
Maniema : ba Kambi etuka ba silisi nungunungu na oyo etali bozali ya batomboki ya M23 na etuka na kindu

Pona AFANI IDRISA MANGALA, baye bakoti sika o'kati ya mapinga FARDC baye bazali na kindu pona koba na mayekoli na bango sima ya mayekoli na kamina n'a etuka ya haut Katanga pe Kitona na etuka ya Kongo central.

« Eza ba tomboki ya M23 te eza pe ba rwandais te eza 100% mapinga. Ndenge boyebi, ba noko bayeyi pona pesa mayekoli na mapinga pona bitumba pe oyo bozali koyoka ezali bokobi ya makoli mana ya mapinga ya sika baye bakoti pona kotelemela ba rwandais kobatamaka na sima ya batomboki ya M23 » ezalaki maloba ya moyangeli.

Kimia azali te na kindu uto tata mokonzi alakaki kozongisa na kati ya bayi mboka batomboki baye batiki mandoki pe ko fandisa bango na etuka ya Maniema.

Mingongo miyike mitombwami pona ko telemela linaka liye lia mbulamatari.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.