Haut Uele : eklezia epesi mokakoswa na misala ya ndako ya mosala ya moyangeli ya etuka 

Ezalaki mokolo ya misato na suku enene kibali nde moyangeli molandi ya etuka haut Uele, Christophe Dara Matata ayambaki lisanga ya batalisi elongi ya eklezia Orthodoxe ndako ya Dimitrio/Isiro. 

Sarah Meta Savu

31 Sanza ya zomi 2024 - 07:46
31 Sanza ya zomi 2024 - 07:50
 0
Haut Uele : eklezia epesi mokakoswa na misala ya ndako ya mosala ya moyangeli ya etuka 

Na mobembo na na Isiro engumba mokonzi ya wolo ya langi ya mpondu na kala, père Jacob Abanakyelo Mibigimi,  alobi ete kozala na ye kuna esika eza kaka pona kosangana na ba ndimi kuna te kasi pe pona koyeba kokoso nini ndako ya nzambe ezali kokutana nayango kuna esika uto liwa ya episkopo Giorgiou Nikiforos Mikragiannanitis. 

Makambo matali bokeyi liboso mpe ntombwa ezalaki na masolo ma bango. Mokumbi ya batalisi bilongi apesi mokano na nionso oyo ezali kosala mbulamatari Batomito mingi penza boyokani na biklezia pe ba kambi kuna esika. 

Na ngambo esusu, asengi komipesa ya moyangeli o'kati ya milulu miye mikoki ko fongolela eklezia bikuke ya sika.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa