Likita pona lolenge la sika ya misolo: " Tolingi bilaka ekoma bosolo" Patrick Muyaya

Likita pona lolenge la sika ya misolo ezali ko banda mokolo moa mineyi na engumba Paris, tina ya likita liango bokembisi banzela ya misolo pona ntombwa ya bingumba ya molongo.

Redaction

22 Sanza motoba 2023 - 18:45
 0
Likita pona lolenge la sika ya misolo: " Tolingi bilaka ekoma bosolo" Patrick Muyaya

Batalisi elongi ya RDC bakomi na paris na ntongo ya lelo,PE ezali mokambi mbulamatari nde ezali na moto ya lisanga lia batalisi elongi.

Patrick Muyaya alingi na motema naye komona bosolo me misala ya bilaka binso pona kotelemela manbi matali changement climatique.

"Masolo makozala na maye matali bongwana na lolenge lako salela misolo sima ya mibu tuku muambe uto boyokani ya Breton woods, eyo ekela FMI pe ndako ya misolo ya molongo. Esengeli ko landela lolenge mokili mozali ko tambola na mbongwana ya climat Congo demokratiki ezali kosala ete mopepe ya malamu ezala na nzela ya ba zamba naye" Patrick Muyaya

Likita liango libongisami na lisanga lia SDSN PE tata mokonzi ya ekolo france, Emmanuel Macron azali na likanisi lako sunga bikolo bisimbami na mambi ma changement climatique pe bikolo bizali ko sunga pona yango, ko pesa motuya na ntombwa na bikolo ya misolo mukie.

Bakonzi, bakambi mbulamatari pe misele ya bikolo biyike ya molongo bako zali na likita liango utu mua tuku mibale na mibale kino mua tuku mibale na misato.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.