RDC: Constant Mutamba azui etumbu ya mibu misato ya misala makasi
Ndako ya bosambisi ya cour de cassation ewuti ko kweyisa etumbu pona Constant Mutamba, mokolo ya mardi 02 septembre, ministre ya kala ya bosembo constant Mutamba Tungunga, azui etumbu ya mibu misato ya misala makasi pona koluka kosalela misolo ya Mbulamatari na lolenge ya mabe.
Ndaku ya bosambisi etalisi mbeba ya moyibi misolo 19 millions oyo esengelaki kotonga boloko na Kisangani na etuka tshopo.
Likolo ya etumbu wana misusu ezali lokola etumbu epekisi ko leka na maponomi to ko pona to pe lisusu ko zala mokonzi na ba kopani ya l'état.
Ndaku ya bosambisi eboyeli ye libération conditionnelle pe esengeli kozongisa misolo 19 millions de dollars na libengi ya l'état.
Kolandisama mikanda, misolo miselaki mikende na kopani Zion Construction sima ezonga na libengi ya l'état.
