Likindo ya bosembo: « soki ezalaki pona lisungi na yo ya tango nionso te nde natika ministele ya bosembo » Constant Mutamba na Tshisekedi 

Likindo ya bosembo na ekolo Congo demokratiki ebandi uto mua 06/11/2024 na Kisasa, na bokambemi ya tata mokonzi Félix Tshisekedi. 

Sarah Meta Savu

7 Sanza ya zomi na moko 2024 - 09:34
7 Sanza ya zomi na moko 2024 - 09:35
 0
Likindo ya bosembo: « soki ezalaki pona lisungi na yo ya tango nionso te nde natika ministele ya bosembo » Constant Mutamba na Tshisekedi 

Na maloba maye , Constant Mutamba ministre ya bosembo atalisi ete azali na lisungi moko te kowuta na baninga naye ya mosola na mbulamatari ya Suminwa, kaka tata mokonzi ye moko. 

"Tango mosusu to mituka, to tika to toba" Awa libaku lipesami yako tonda yo kowuta na motema. Soki na lisungi na yo ya tango nionso te nde na tika ministele ya bosembo ", maloba ya Constant Mutamba. 

Aleli pe pona oyo etali bosembo na ekolo Congo demokratiki na moyi moa lelo. "Moyi congolais sambo soki bazali zomi, bazali na esengo te na lolenge bosembo ekambemi. "


Ministre ya bosembo asengi lisusu, na baye bazuami na likindo liango, basala mosala bo elongobani na ntina ete tozwa mabingisi makoki komema biso na mbongwana mokoki kosimba, pona nini te na bobongoli buku likonzi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa