RDC : Félix Tshisekedi a sengi na ba congolais ya diaspora ba zonga « pona ko bongisa ekolo Congo »

Tata mokonzi ya ekolo, Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo a sololi na ba congolais oyo ba fandaka na mboka ya France n’a mokolo mwa lelo, liboso yako silisa milulu naye na mboka wana. 

Rédaction Lingala

1 Sanza ya mitano 2024 - 19:03
29 Sanza Sambo 2024 - 19:28
 0
RDC : Félix Tshisekedi a sengi na ba congolais ya diaspora ba zonga « pona ko bongisa ekolo Congo »

Na lisolo wana, Félix Tshisekedi a sengi na ba congolais oyo ba fandaka na mboka ya ba paya bazonga awa na Congo pona ko sala misala oyo eko tombola mboka. 

« Bo bongama pona ko zonga na mboka bino, po ete ekolo na biso e tombwama », e lobaki tata mokonzi ya mboka. 

Tata mokonzi ya ekolo na ba congolais ya diaspora ba betaki pe lisolo na maye matali mpaku ba futisaka batu na ndaku ya pepo ya N’Djili (aéroport international de N’Djili). Na yango, Félix Tshisekedi alaki ete mbongo ya mpaku mana eko salama na lolenge elongobani.