Botomboki ya Rwanda : « Tata mokonzi azui batu ya sika pe apesi bango bibundeli », Vital Kamerhe

Tata mokonzi Félix Tshisekedi ayambaki mokambi ya ndako ya balobeli, Vital Kamerhe n'a pokwa ya mercredi 07/08 kuna na cité de l'Union africaine.

Sarah Meta Savu

8 Sanza ya muambe 2024 - 15:43
8 Sanza ya muambe 2024 - 15:44
 0
Botomboki ya Rwanda : « Tata mokonzi azui batu ya sika pe apesi bango bibundeli », Vital Kamerhe

Masolo mabango matalaki mingi mingi bitumba na moniele ya ekolo.

« Tata mokonzi atie makoki esengeli pe azui bato ya sika atindi bango na malakisi pe apesi bango bibundeli pona bitumba », Vital Kamerhe.

Basololaki pe na mambi matali libombo pe bozangi motuya ya misolo franc congolais liboso ya misolo ya amerika dollars ($).

« Tata mokonzi abendi matoyi bato banso bazali kotiya motuya na lolenge na bango. Mosala ya bolandeli eko zala makasi,tango ekoki pona kotia na mosala linaka pona mbongwana ya misolo mia biso pe kolandela ezala makasi ».

Kolandisama ndako ya bopanzi sango ya tata mokonzi lioko likita libongisami mikolo mikoya pona tata mokonzi, mokambi ya ndako ya ndako ya balobeli pe mokambi mbulamatari pona ko solola na maye matali makambo ya motuya ya ekolo.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa