Christophe Lutundula na tina na ya ba Wazalendo: " to koki te ko lakisa mosapi moyi mboka oyo azui mandoki pona ko bundela ekolo na ye"

Mokambi mbulamatari molandi atali mambi ya boyokani na bikolo ya bapaya atalisaki elongi na bokutani ya momesano ya minisele ya mambi matali bopanzi Sango liboso ya bapanzi sango pe alobi komemia misala ba Wazalendo bazali kosala pona ko bengana batomboki ya M23. 

Sarah Meta Savu

24 Sanza ya zomi 2023 - 20:36
 0
Christophe Lutundula na tina na ya ba Wazalendo: " to koki te ko lakisa mosapi moyi mboka oyo azui mandoki pona ko bundela ekolo na ye"

Christophe Lutundula akanisi ete " bakoki te kolakisa mosapi moyi mboka oyo azui mandoki pona ko bundela ekolo na ye" liboso ya bitumba lokola mapinga ya Rwanda ezali kosala na kobombanaka na sima ya M23. 

Misele ya bopalanginisi sango na maloba maye ya ebandeli alakisi ba panzi sango bililingi ya mapinga ya ekolo Rwanda na eteni ya Tongo na Nord Kivu pona kolembisa batomboki ya M23 oyo bazui makofi ya bilenge ya Wazalendo. 

Kisasa abateli pe mokano moa ye na oyo etali boyokani ya cessez le feu lokola elobamaki na Nairobi pe na masolo ya Luanda. Mbulamatari ya Congo demokratiki azo lakisa mosapi na Rwanda nzambi bazali ko koba boma bayi mboka na moniele ya RDC.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa